Ozali oyo akobatela ngai solo Ozali oyo akengelaka malamu Ba problèmes na nga Yo toujours liboso Ozipa bapota po nga nalela te Ozali oyo akozongisela nga bapongi
Ya kimia na bandoto ya esengo
Lokumu masanjoli ezali ya Yo Yesu Toye kobonzela Yo ya motuya na biso
Olona nga pembeni ya ebale Bokauki jamais na bomoyi na nga Obongisa nionso ya malamu Tango nionso nazala litatoli Olona nga pembeni ya ebale Echec jamais na bomoyi na nga Obongisa nionso ya malamu Mvula nionso ezala lipamboli
Nakoyembela moto mosusu te se Yo Yesu na nga Nakokumisa kombo mosusu te se Yo Yesu na nga
Olongola nga nzube pona kembo na Yo
Opetola nga pona tempelo na Yo Osimba nga loboko tokende omboka Yo eh Yaya Yesu Ngolu na Yo nakotatola Tongo nionso na bomoyi na nga Ngolu na Yo nakoyemba Pokwa nionso sima ya ba merveilleuse journée
Ozali ndakisa ya yaya malamu Obongisa nzela po oyebi leki akolanda sima Osimba nga loboko po nga nabunga te oh Yaya Yesu
Nakoyembela moto mosusu te se Yo Yesu na nga Nakokumisa kombo mosusu te se Yo Yesu na nga
Ngolu na Yo nakotatola Tongo nionso na bomoyi na nga
Ngolu na Yo nakoyemba Pokwa nionso sima ya ba merveilleuse journée
Informe et vide na maboko ya potier Obongisi nga na lolenge na Yo Nga mutu nazangaki tina Na molili ya kufa nga nazalaki Obimisi opesi nga lisekua Pe bomoyi ya seko nga nayembeli Yo
Ongengisi ba nzela na nga nionso Osali nga elembo pona kembo na Yo Namipesaki, namipesaki nzoto na nga na masumu Nzoka nde nazalaki kolekisa tango na nga pamba Lelo Yesu Yo obongoli, Yesu Yo okangoli, Yesu Yo esukoli Opikola mosisa ya bapasi oyo elelisa nga Obongola mawa na nga nionso ekoma lelo esengo
Comment expliquer rejeté de l´odebar azua tina Alia na mesa ya mokonzi Yaya Yaya Yesu
Oh Yaya eh osomba nga na motuya mingi Osikola nga na mapipi na Yo eh Osukola nga na makila na Yo oh Yaya eh, na merita Te okufela nga n´ekulusu Omikaba mbeka po nazua bomoyi oh Yaya eh