Yay´ofanda mpo to pema te oh Yay´ofandi mpo to pema te oh Nkasi ofandi mpo to kokisa nioso Après avoir tout accompli sur la terre
Ozwi nkombo koleka ba nkombo nioso Bapesi yo ngwende koleka ba ngwende nioso Ofanda na ngwende etongama na maboko ya moto te Menuisier ya ngwende na yo nde nani oh
Nabotama nakuta yo "Nzambe na se na moyi" Nakoleka okotikala "Nzambe na se na moyi" Abraham aleka kasi oza "Nzambe na se na moyi"
Lelo naza n´esengo ko netola ngwende na yo eh oh yaya ehh
"Yay´ofandi na kiti Ya bokonzi na yo eh
yaya eh" (2x)
Ngwende na yo babundisaka ngo te oh Ngwende na yo etatabanaka te Ngwende na yo ebanga rébellion te Ngwende na yo eninganaka te
Te savoir sur le trône me rassure Seigneur Surtout nayebi ofanda kaka mpo´yamba masanjoli ya nga te Nkasi ofande mpe mpo kata makambo na nga nkolo Mingi mingi na yebi ozalaka na camp ya ba santu Yango soki mokili ekozala besoin ya avis na nga Je suggère que le trône soit occupé
Par Jesus jesus oohh
"Yay´ofandi na kiti Ya bokonzi na yo eh
yaya eh" (2x)
Mokonzi soki afandi na nwende Ako zela masanjoli emata Mokonzi na nga abongi, abongi na lokumu ehh Lelo na sanjola ye
Fanda na yo ! Po nga na fukama papa Na kita na makolo na yo kino nasopa malasi Ata na pinjoli pinjoli ya miso na nga Ya mawa te oh