Maman nga nayebi lobi, nazo kende na ngai Kolela te ekozala jour na ngai Pasi na motema, Maman nanga Véro Akolela mingi, hugues ako zonga te Mokolo ya liwa nanga, ba jaloux bakoya
Ba tangisi mayi ya miso, na mitema feti Mokolo ya liwa nanga, libota nanga ekolela Mardochée Prospère Bienvenu ba kolela Ya Mayi akolela leki na ye akeyi Arnold Wami mawa Masolo akolela yaya naye akeyi Igor wami mawa
Tokozala awa awa Mukolo ya liwa na ngai, ekozala mawa Lolendo ya pamba, nzoto mabele ya pamba Mituka bandako nyoso eko tikala Mokili angani eza nango ya Nzambe Tala lobi na yo liwa eza pene Pasi na motema miradi nanga Ephraïm na ngai, bako lela pap´ee pap´ee Mokolo nako wa, Vila Nova na ngai Bo bosana te, bolamu nanga na mokili
Bozongisa bolamu nanga epayi ya bana nanga Miradi na nga Ephraïm na nga Bébé Hanse Rolls Fouine, bako lela papa Bako somba bilamba ya talo Baye na matanga na ngai Bako sala ba tapages, mokolo nako wa Naliaki na bango, na melaki na bango Basusu balali na ndako Lobi basusu bako bosana bana na ngai Bako beta bango kara Lokola naza na bomoyi tika na bongisa Avenir ya Miradi na Ephraïm na nga
Ema eee hieen, mawa eee mawa Mokolo ya liwa na ngai, ekozala mawa Mosala nanga loyembo, butu pe moyi Nazuwa misolo na bokolo bana na ngai Hugues likonzi ya famille
Bo koluka bo boma nga pamba Maman na nga papa nanga, bako tikala na nani Bana nanga bandeko nanga, nani ako bokolo Mama nga nayebi, nazo kende na ngai Maman kolela te, mokili elingi nga te Boko lela, boko lela ngai Boko luka ngai, kala te nazo kende
Mokolo ya liwa na ngai, eko zala mawa Mokolo nakowa, Maestro na ngai Ko bosana te misala na ngai na Vila Nova Ozongisa bolamu na ngai payi ya ba ndeko na ngai Yeyeye ye ye ye ye
Marie Misamu akufa alelisa ya mokili mobimba Jonathan Linda Like alelisa monde entier Linda Like, vila Nova mawa Jonathan ozokisa motema ya Maestro
Mokolo ya liwa na ngai, eko zala mawa Bongisa bizaleli, po lobi eza ya Nzambe Mawa mawa mam´ee Jalousie nayo oko kende wapi Motema mabe, okozanga lola Kindoki nayo, okokende wapi Mama mama, oko zanga lola Obomi nga lelo, oko kufa kaka Liwa eza mokano ya Nzambe, na mokolo ya suka Oko kende wapi, oko zala wapi, oko kende wapi Na loboko ya Nzambe, to pe na loboko ya satana Ndeko nanga, Oko kende wapi