Tonton, Sala effort oyekola ko banga ngai Nazali n´importe qui te Je m´appelle Bialu Jean de Dieu
Yo ozalaka na motema ya soso po nini eh
Ba leisa yo motema ya mbwa po nini eh Eloko oyo osanzi y´ozongisi na monoko Esika ba bamba yo mabanga olemba ko kende te
Yo ozalaka na motema ya soso po nini eh Ba leisa yo motema ya mbwa po nini eh Eloko oyo osanzi y´ozongisi na monoko Esika ba bamba yo mabanga olemba ko kende te (Zwa ata mayele te)
Yokaka eh changer nano ezaleli nayo wana ya kala oh Yango moto elongwisaka yo mosala liboso Tango pe olongwaka mosala akimaka yo A lingaka yo kaka po na falanga eh Lelo ba zongisi yo na mosala nayoki ozongani naye lisusu Eh eh
Yokaka eh changer nano ezaleli nayo wana ya kala oh Yango moto elongwisaka yo mosala liboso Tango pe olongwaka mosala akimaka yo A lingaka yo kaka po na falanga eh Lelo ba zongisi yo na mosala nayoki ozongani naye lisusu Eh eh (Jules Bavon Mwambu)
Yo onyokoloko nga mwasi nayo boye po nini eh O nyokoloko bana obota boye po nini eh Ba tuba yo tonga ya Johnny Walker o tambola o lemba te Ozalaka na economie na ndako te po nini eh (Yango ba loka yo oh boni oh)
Mobali oyo nga na bala azalaka naye sans position Abima na tongo azonga na ndako se solo ya masanga (Soulard)
Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo pasi eh, eleki Ngai mingi Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa Na mobali ya Chopine boye
Le le eh le le le le le mama na ngai eh Le le eh le le le le le le eh
Mobali akima nga na ndako nga na bana mwambe (eight) Mobali akima nga na ndako po mabele ekweya nga Abosani que mabele namelisa bana naye Mobali aboya nga maman po libumu ebima misisa
Mobali aboya nga na ndako, po nakoma buro Abosani ki fidelite nangai, oyo navandela ye na ndako
Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo pasi eh eleki Ngai mingi Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa Na mobali ya Chopine boye
Na mobali ya Chopine boye ngai na baye Na mobali ya Chopine, System, nakokufa eh Alandisa ngai mabota, mbula nyoso bana Na quartier ba koma ko benga ye, papa muchina Nakoma na ba mbanda bana ya serie 8 Amanda na Magali, ce n´est pa possible (Amanda na Magali, ce n´est pa possible)
Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo pasi eh eleki Ngai mingi Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa Na mobali ya Chopine boye
Motema ya soso ba pesa yo Olingaka ko yoka te Motema ya mbwa ba leisa yo, olingaka ko changer te
Le le eh le le le le le le le Le le eh le le le le le le le
Philippo aboya nga mama Akoma na ba kamuke (Philippo) Akokaka ko mona bango Naba colant te
Surtout soki amoni bango na oyo ya mikuse Philippo abeli liboma, abosani famille nyoso eh
Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo paso eh eleki Ngai mingi Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa Na mobali ya Chopine boye eh
Philippo soit sage Revient a la maison, S´il te plait. Mobali mobimba, avanda obe na ndako na semaine Na weekend omona ye te, irresponsable
Na koma ko tala television na ndako obe nga moko na Bana Soko Philipo abimi, okanga ye problem
Surtout banda a gagna loto amonanaka ata na ndako te
Mokolo voitute ekozwa pane oko fanda na ndako, Philipo