Tongo Etana Butu eyinda Nkembo na Nzambe etondi mokili
Mokili elingi eyeba wapi Nkolo na bilembo
Aza na Ye musika te, Aza na mutema na nga Ofanda lokola mukolo lopangu, Ozo konza ndenge Olingi Nzambe yako betela milolo eza Yo Muana mpate
Kumama nanu Yahwe Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Kumama Nzambe na bomoyi Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Kumama, Kumama, Kumama Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Kumama Yahwe Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Osolalaka na ba nzete
Oyokaka munoko ya ba niama Nzambe oyo mupepe ezo tosa, eza Yo Nkolo na bilembo Nzambe Oyo Asalaka moyi, ekomaka pe ya kala te Tala biloko ya mokili ekoma kokoma ya kala
Kumama nanu Yesu Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Kumama Nzambe na bomoyi Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Nayembi Yo nzembo ya bolingo Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Kumama Kumama Kumama Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Bolingo na Yesu etangisi nga pinzoli Naleli te po ba beti nga Naleli pe pasi te, na leli bolingo na Yesu
Etuti motema na nga Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Etuti motema na nga Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Na leli ba mbata te Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Na beti sété na phrase oyo, na insisté Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama
Obenga Gédéon vaillant héros, nanu abundi ata bitumba ya quartier
Abraham papa ya bikolo, aboti ata kobota Isaac te
Na mituni Nzambe ya ba Nkombo, Nkombo nini ozo bengela nga
Benga nga na nkombo na nga po na rejoindre Nkombo yango
(Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama)
Elombe (Eh Yahwe, Eh Yahwe Kumama)
Eh Yahwe (Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Nzambe ya ko kamwa elikya ya motéma
(Mosantu Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Libaku malamu, bolingo ya bomuana na nga (Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Osundolaka nga te ata na ye na minuit (Mosantu Kumama Yahwe na nga, Kumama)
O bwakisaka nga te, ata na ye na tongo tongo (Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Nzambe ya kokamwa, Nganga mayele (Mosantu kumama Yahwe na nga, Kumama)
Obokoli bolingo na yo ya Yesu kati na motema na nga (Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Obokoli bolingo ya bo Nzambe kati na motema (Mosantu kumama Yahwe na nga, Kumama)
Soki na pengwi te ti lelo oyo, Nzambe eza po Y´osungi (Kumama Yahwe na nga, kumama)
Mongongo na Yo eleki ba kaké, Nzambe ya somo boyé (Mosantu kumama Yahwe na nga, kumama)
Nzambe ya ndenge mususu, Akokani na ba nzambe ya mboka na nga te (Kumama Yahwe na nga, kumama)
Ngai na pesa yo nini? Nga na futa Yo nini? (Mosantu kumama Yahwe na nga, Kumama)
Bobele loyembo na nga, libonza napesi na Yo (Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Bobele motema na nga, libonza napesi na Yo (Mosantu Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Napimi Yo bolenge na nga te, libonza napesi na Yo (Kumama Yahwe na nga, Kumama)
Tozo sanjola Yo Papa y´Obonga na Nkembo, Tokuta Yo Nzambe, Oko tikala Nzambe
Mokonzi kati kati ya mitema ya batu ... Toko pesa Yo Nzembo