Salela nga Yésu na nga, Ngolu na yo Mituna etondi nga motema ebele, wapi biyano Salela nga Yésu na ngai ngolu na yo Mituna etondi nga motema, wapi biyano Yo laka nga nkembo, shekina na yooo
Etikalisa maloba Na misala nazo mona te Yésu na ngayi Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Mokonzi Na zali na posa na yooo CH: Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé Na lingi na mona yo Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé Na lingi na mona yo Avenir ekomi kosala somo, ezo bangisa Nayebi te nga wa yo yaya na ngayi, na suka wapi oooh Ya Yesu moteme mpasi Nzoto neti e lâché Malgré bongo, je suis toujours confiant Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Mokonzi Tozali na posa na yooo Kita Yahwé (Yahwé) Kita Nkolo (Nkolooo)
Kita Yahwé (Ah papa) Na lingi na mona yo (Ah bana baleli pe mingi oooh) Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé (Yanola posa motema ya bana na yo) Na lingi na mona Yo CH: Papa ozali ndé Nzambé Nzambe na Abrama, Nzambe na Izaka ô Yaya komo lelo Nzambe na ngayi eee Kita Yahwé, (Papa) Kita Nkolo, Kita Yahwé (Yoka mongongo na nga, yanola nga lelo, Yésu…) Na lingi na mona yo Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé (Yaka, Yaka, Yaka, Yaka) Kokangela nga motema te mosantu nazo lela Kozingela nga maboko té na kosenga na nga
Soki motema moto eleli mongongo eyokani té, oyokaka Kutu na libumu ya mbisi molili makasi na sé ya mayi Oyokaki losambo ya Jonas Yésu Boni oyoka ya ngai té Bapasi, kozanga na nga Ozo mona to ozo mona té Eh papa kolela na nga Ozo yeba to ozo yeba té Yesu ebongo losambo na nga Ozo yoka to ozo yoka té Nga wa yo na niokuami mingi Ozo mona to ozo mona té Yésu, Pardon bobola famille Ozo yeba to ozo yeba té Ba soucis na ngai, kolela na nga Ozo yoka to ozo yoka té
Eh Mokonzi na nga telema na Yo (Yahwé telema) Pene ya banguna ekueya na mayi (Nkolo Yahwé telema) Yesu Mokonzi na nga telema na Yo (Yahwé telema) Silisa mpasi na nga, na mona pe esengo (Nkolo Yahwé telema) Bapasi, Kozanga na nga Ozo mona to ozo mona té Ô Yésu kolela na nga eee Ozo yeba to ozo yeba té Ebandaki nga kobondela Yaya Ozo yoka to ozo yoka té Na ngomba ba jeûnes, ba retraites, losambo tango, pokwa Ozo mona to ozo mona té
Ayi Mokonzi kolela na nga Ozo yeba to ozo yeba té Ah Yesu loyembo ya Shékinah Ozo yoka to ozo yoka té Ya Yésu Mokonzi na nga telema na yo Yésu (Yahwé telema) Maladies elembisi nzoto telema Yaya (Nkolo, Yahwé telema) Yesu tango ekoki tolingi to mona yo (Yahwé telema) Telema tobika bikamua na mboka ya Congo (Nkolo, Yahwé telema) CH: Telema molili ekomi pene neti ya nsimba bomoyi na nga Telema, telema y´okata likambo na nga Yésu motema na nga eza na posa na yo Bomba nga tango nionso na sé ya mapapu na yo
Silisa pema banguna po bayeba, nga naza na Nzambé Eh Yahwé telema, na yo (Yahwé telema) Telema, telema Mokonzi (Nkolo Yahwé telema) Yésu belema, belema yaya eee (Yahwé telema) Yésu belema, belema Mokonzi (Nkolo Yahwé Telema) Mokonzi telema ba nguna ba yoka soni eee (Yahwé telema) Bendele na nga ya elonga Yésu na nga (Nkolo Yahwé telema) Soki Mokonzi atelemi nani aloba (Yahwé telema) (Nkolo Yahwé telema) Bendele na nga ya elonga Yésu na nga eeh (Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba (Nkolo Yahwé telema) (Yahwé telema) Mokonzi telema ba nguna ba yoka soni eee (Nkolo Yahwé telema) Bendele na nga ya elonga Yésu na nga eeh (Yahwé telema) Soki Mokonzi atelemi nani aloba (Nkolo Yahwé telema) (Yahwé telema)