Bolingo na yo Yesu na ngai eh Etindi nga nayemba loyembo Nagumba mabolongo ya motema na nga Nabuaka motole ya bimbebo na nga Nafungoli robinet ya masanjoli Pe bongo nasopa maloba mpaka malasi Naloba nionso osaleli ngai eh Olongisa nga mowumbu na Satana Oyo ezalaki mosika ekomi pembeni Oyelisi pete nionso ezalaki makasi Okamuisa ngai ndenge omesana kokamuisa Nabala, nasala efforts te Yesu, naboti, nasali efforts te Nakoma mwana na Nzambe na makasi ya nzoto te Okomisa nga mosali, nasala efforts te Nionso wana Yesu Nzambe na ngai Bolingo na yo pona ngai Mawa na yo pona ngai
Eh Yahwe Oza bolingo Eh Yahwe Oza malamu Eh Yahwe Namoni na miso bilaka na yo Bolingo na yo pona ngai Mawa na yo pona ngai Nionso ya yo, ekomi ya ngai Elonga na yo, ekomi ya ngai Esengo na yo, ekomi ya ngai Kimia ozali, ekomi ya ngai Bokonzi na yo, ekomi ya ngai Kembo na yo, ekomi ya ngai
Yaaaahweeee bolingo na yo nde kombo na yo Bolamu na yo pona nga
Yesu, okanisi osali yango na nko Nzambe ya bomoyi Yahwe, Yahweeee Miso, bilaka na yo Nakomi molongi Yesu, kimia na motema osopi Namitungisa te oh Papa olongola maladie Obengana souçis Osilisa kolela Na kati na Yesu olatisa nga kembo Ekomi ya ngaeeeeeee Yahwe Yahwe Yahwe na ngai