Azali te na mona te oyo´a leki yo yesu na nguya likolo na se misala ya liloba na yo Ya nguya
Alleluia
Soki ba nzambe bazali Yesus na ngai nde Nzambe yes
nani akotuta tembe na oyo yo ozali Osala misala emonana na miso ya banto Na egypito kino lelo ba yebi Misala ya loboko no ya nguya
Pharaon mikanisaki elombe asuki liboso ya Israela Wana etalisi yo oza Nzambe Mosusu te Mosusu te
Azali te na mona te oyo´a leki yo yesu na nguya likolo na se misala ya liloba na yo Ya nguya
Bato ya mayele balandaki mozoto Kombo na ye Yesu Mwana moke na maboko ya mama na ye Nzoka nde mokozi
Elobamaki na lisako ya Isaaya Akosala mobikisi Bamemaki wolo bamemaki malasi makala malasi kogumbamel´oyo abongi na lokumu mwana na mpate na yoka te, na yoka te oy´aleki yo Yesu na nguya Tangela ngai oy´aleki yo Yesu na nguya Oh na mona te, na mona te, oy´aleki yo Yesu na makasi Tangela ngai oy´aleki yo Yesu na nguya
soki ya bango aza mokonzi ya biso mokonzi na bakonzi Tangela ngai oy´aleki yo Yesu na nguya
ah ebanda boni na yemba Yesu Nzambe mokeli esika moko na bikelamu Tangela ngai oy´aleki yo Yesu na nguya
hum tika ngai na netola yo yaya tika ngai na netola yo Yamba loyembo ya sika libonza pona yo tika ngai na netola yo Yo liloba ya bomoyi, okomisa ngai mwana Nzambe tika ngai na netola yo Ah to yemba yo to yemba lisusu nani tika ngai na netola yo
osala biso ngolu toyeba babombami na yo topona no yemba mokeli bikelamu te oh basantu boya totatola oyo azali
Ah ya liboso aza Nzambe Amen ya mibale aza mokonzi Amen ya misatu aza papa Amen ya mineyi alalaka te Amen ya mitanu aza nionso yes Amen Libela na libela ozali Nzambe
na yoka te, na yoka te oy´aleki yo Yesu na nguya
Tangela ngai oy´aleki yo Yesu na nguya Oh na mona te, na mona te, oy´aleki yo Yesu na makasi Tangela ngai oy´aleki yo Yesu na nguya
baninga pona yesu na ngai Azali se ye moko Nzambe na bomoyi
Azali se ye moko Wuta mokili esalama ki no lelo Nayembi Nzambe mosusu te Azali se ye moko oy´etobala na mayi Azali se ye moko Oy´esekuisa Lazalo Azali se ye moko Asilisa makasi
Azali se ye moko Na force de pesanteur Azali se ye moko Yesu amata na likolo Azali se ye moko Na nguya na ye ya bozambe Azali se ye moko
Eya na butu eya na moyi Na kobamba eloko moko te
Toza na Yesu elombe na bitumba Alonga satana Alonga mpe mokoli Ye nde mopanga ebundeli na ngai na bitumba tokoma balongi likolo se na ye
oy´aza makasi atuta tolo Atombola mosapi toyeba ye lokola ye awuta wapi Pene na ye amonani te
Azali se ye moko Nzambe na ngai eh Azali se ye moko Bazalaka misato te Azali se ye moko Azali se ye moko Azali se ye moko...
Ah n´ekulusu bosalaka misato Oy´akufela ngai ezali se yo moko Yesu Eh yaya oza mokonzi Na ngomba transfiguration bozalaka na mose na eli
Bakenda wapi otikala yo moko Eh yaya oza mokonzi Ah na jourdain, bozalaka banto ebele Mongongo eloba toyoka se yo moko Yesu Eh yaya oza mokonzi Meme si les hommes ne sont pas d´accord Ngai natatoli tu es mon Seigneur et mon Dieu
Ozali se yo moko Ozali se yo moko Ozali se yo moko Kaka yo nde mokonzi na ngai Ozali se yo moko Mpate na Nzambe Ozali se yo moko Okomaki lisumu Ozali se yo moko po Ngai na koma mosantu
Ozali se yo moko Yango nasopi ba grade na ngai Ozali se yo moko Liboso na yo mosantu Ozali se yo moko Ngai na tiki lolendo na ngai Ozali se yo moko liboso na yo mosantu Ozali se yo moko Ngai nakiti na mabolongo yaya Ozali se yo moko to gumbameli yo mosantu Ozali se yo moko
Eya na butu eya na moyi Na kobamba eloko moko te
Toza na Yesu elombe na bitumba Alonga satana Alonga mpe mokoli Ye nde mopanga ebundeli na ngai na bitumba tokoma balongi lokolo se na ye