Losambo na ngai Nkolo yanola eh Kolela na ngai Yawhé oyoka eh Naza kosenga, loboko na yo, zala na nga Ba limites na ngai ekweya Makambo ebongwana,
Ebongwana eh!
Na longa, Yahwe eh na longa eh Na longa, Yahwe eh na longa eh Na longa, sala na longa eh
Eleki nga mayele, Esali nga kobanga Nga nakende ko wapi? Nazongi na liziba Esika na zuaka makasi Esika na zongaka ya sika Kanga ekuke ya satana Na bomoyi na nga Etelema, telema
Na longa eh, Yahwe eh, na longa eh Na longa eh, Yahwe eh, na longa eh
Na longa eh, sala na longa eh.
Esila boye te boye te é é, boye te Balonga ngai te ngai te é é, ngai te Nakueya na se, na sé te, na se te Nasuka boye té, boyé te, boye te
Naza kosenga ngai loboko na yo, zala na nga Ba limites na ngai é, ekueya é Makambo Ebongwana Ebongwana eh Na longa, Nzambe Na Lola eh na longa
Paroles Nalingi otia liloba oyo ezo correspondre na situation na yo
Soki ozobela osimbi place ozobela ozo yemba:
Nabika, Nzamb´a miracle, na bika eh. Sala nga na bika, Nzambe na lola, na bika eh.
Soki problème na yo eza kobota ozoyemba:
Na bota eh Nzambe na Anna, na bota eh Sala nga nabota, Nzambe na lola, na bota eh
Soki problème na yo eza ya libala yemba:
Na bala eh, Nzamb´a bikamwa, nabala eh. Sala nga na bala, Nzamb´a Moïse, nabala.
Soki bitumba elekeli yo yemba:
Na longa, Nzambe na Mbiye, na longa é Sala nga na longa, Nzambe na Alliance, na longa.
Mosali na Nzambe, tango ekoki osenga miracle na yo Bato ba ndimela yo te, ba comprendre Nzambe a bengaki yo Yemba elongo na ngai. Bikamwa eh, Nzambe na lola, bikamwa. Salaka bikamwa eh, Nzamb´a Moïse, bikamwa eh. Salaka bikamwa eh, Nzambe na Mbiye, bikamwa, Yaya Salaka bikamwa eh, Nzamb´a Moïse, bikamwa eh, bikamwa é, Yaya
Paroles Lelo, likambo moko esengeli ebongwana na vie na yo Yemba Nzembo oyo na kondima nioso Nzembo oyo nakoma ngo elongo na yo