Mama bolingo pasi, ngai nayebaki te o Bolingo etumbu, ngai nayebaki te Bolingo somo, namoni na miso Alobaka na ngai ke akobala nga Bazotuna ngai na bato Ngai naloba nini?
Soki bolingo esili, lobela ngai nayeba Ndenge okomi kosala ngai, ekomi somo Nakanisaki yo mobali ya vie na nga Yango namipesaka boye Gisèle Zinda
Eloko esali ngai pasi, Annie Ngangwele Ndenge okomi kowangana ngai na miso ya bato Ezali choix na ngai te kolinga mibali ebele Po naboya kobota mwana na mwana na tata na ye
Soki bolingo esili, lobela ngai nayeba Soki pe nyongo, lobela ngai nafuta Soki pe ba mbanda, ngai nameka nzoto
Awa okeyi na yo, eloko nakosenga Ata obosani ngai, kobosana bana te Oyebaka, y´otika ngai na bwale
Epayi susi na mokumba ya bana
Eloko nini´ango ngai nasalaki yo e Soki likambo ebongwaki tobongisa malembe Oyebi malamu ke naza orpheline Pasi ya butu na moyi, se na maboko ma yo
Awa osundoli ngai, soki pasi na butu Soki maladie ya bana ngai nakosuka wapi? Ndenge y´okosala, yo okokanisa te obotama pe na bandeko ya basi
Pasi omonisi ngai, yo okofuta ata ndele Ata na oyo, okolinga makasi Akosala yo pe ndenge osali ngai Mabe tosalaka ekofutama awa o nse
Mokolo ezali yo okolela nga
Mokolo ezali yo okobanza nga Ata sima ya liwa na nga Yo okokanisa Zinda
Banda okende na yo
Ngai awa na sima, souçi elei ngai nzoto Natikali awa mipanzi ya kotanga Oluki liwa na ngai Ngai awa nakeyi koyenga yenga Malole, ebembe ya soso matanga te Nani akolela ngai
Okende otikela ngai
Makanisi ekoma nde kofole liwa Etumba na soucis Arme nini nakolonga
Awa ko bisengo epesa nga congé Consolation na ngai bana otikela nga Fotokopi na yo e
O mon amour nakomi owe étourdi... Ngai nalingi Yula Bols na motema Banda otika ngai, vie na ngai Papa Mundabi ebeba Na molili to ye Okende otika ngai na pasi Nga nalela Nabwakisi baninga na ngai nyonso ya motema Tala ndenge osali ngai